[1] Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki.
[2] Nakopambola Yawe tango nyonso, nakokumisa Ye mikolo nyonso na bibebu na ngai.
[3] Tika ete bomoi na ngai emikumisa kati na Yawe ; tika ete banyokolami bayoka mpe basepela !
[4] Boya kosakola elongo na ngai ete Yawe azali monene ! Tonetola Kombo na Ye, biso nyonso.
[5] Nalukaki Yawe, mpe ayanolaki ngai ; akangolaki ngai na somo na ngai nyonso.
[6] Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo, mpe bayokisamaka soni ata moke te.
[7] Mobola agangaki, mpe Yawe ayokaka ye ; abikisaki ye na pasi na ye nyonso.
[8] Anjelu ya Yawe atongaka molako na ye zingazinga ya bato oyo batosaka Yawe, mpe akangolaka bango.
[9] Bomeka elengi mpe botala ndenge nini Yawe azali malamu ; Esengo na moto oyo azwaka Yawe lokola ebombamelo na ye !
[10] Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe ; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te.
[11] Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala, kasi bato oyo balukaka Yawe bakozanga eloko moko.
[12] Bana na ngai, boya, boyoka ngai ; Nakolakisa bino kotosa Yawe.
[13] Nani asepelaka na bomoi ? Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo ?
[14] Batela lolemo na yo mosika na mabe, mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.
[15] Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, luka kimia mpe koba na yango.
[16] Miso ya Yawe etalaka bato ya sembo, mpe matoyi na Ye eyokaka koganga na bango ;
[17] kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.
[18] Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.
[19] Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.
[20] Pasi mingi ekangaka moto ya sembo, kasi Yawe akangolaka ye na nyonso,
[21] abatelaka mikuwa na ye nyonso mpo ete moko te kati na yango ebukana.
[22] Mabe ebomaka moto mabe, mpe bayini ya moto ya sembo bakozwa etumbu.
[23] Yawe akangolaka bomoi ya basali na Ye ; mpe bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango bakozwa etumbu te.