Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:19

[1] Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe alandaka banzela na Ye !

[2] Oliaka mbuma ya mosala na Yo ; ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.

[3] Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele ; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.

[4] Ezali ndenge wana nde Yawe apambolaka moto oyo atosaka Ye.

[5] Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona, mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi mikolo nyonso ya bomoi na yo

[6] mpe okomona bakitani na yo. Tika ete kimia ezala na Isalaele !

Banzembo — Chapters