[1] Nzambe ya banzambe, Yawe alobi, abengi mokili wuta na epai moyi ebimaka kino na epai elalaka.
[2] Wuta na Siona, mboka kitoko, Nzambe azali kongenga lokola moyi.
[3] Tika ete Nzambe na biso aya ! Tika ete akanga monoko te ! Liboso na Ye, moto makasi ezali kozikisa ; mpe zingazinga na Ye, mopepe makasi ezali kopepa.
[4] Abengi Likolo, kuna na likolo, mpe mabele mpo na kokata makambo ya bato na Ye.
[5] Alobi : « Bosangisela ngai bayengebene na ngai, ba-oyo basalaki Boyokani elongo na ngai na nzela ya mbeka. »
[6] Likolo ekopanza sango ya bosembo na Ye, pamba te azali Nzambe ya bosembo.
[7] Bino bato na ngai, boyoka ; nazali koloba na bino ! Isalaele, nakoloba mpo na kotelemela yo : « Ngai Nzambe, nazali Nzambe na yo. »
[8] Nakopamela yo te na tina na bambeka na yo, pamba te bambeka na yo ya kotumba ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
[9] Nakozwa ngombe te kati na ndako na yo to ntaba mobali kati na etonga na yo ya bibwele,
[10] pamba te banyama nyonso ya zamba ezali ya ngai ; ezala ata ebele ya banyama oyo ezali kati na bangomba, nyonso ezali ya ngai.
[11] Nayebi bandeke nyonso ya bangomba ; mpe banyama ya bilanga ezali ya ngai.
[12] Soki nazalaki na nzala, nalingaki koyebisa yo te, pamba te mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya ngai.
[13] Boni, okanisi penza ete ngai naliaka misuni ya bangombe to namelaka makila ya bantaba ?
[14] Bonzelaka Nzambe matondi lokola mbeka, mpe kokisaka bandayi na yo epai ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
[15] Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.
[16] Nzambe alobi na moto mabe : « Mpo na nini opanzaka sango ya mibeko na ngai mpe olobaka na tina na Boyokani na ngai ?
[17] Nzokande oyinaka malako na ngai mpe oyokaka te maloba na ngai ?
[18] Soki omoni moyibi, wana nde osepeli ; mpe ovandaka esika moko na bato na bikobo.
[19] Otikaka monoko na yo kosala mabe, lolemo na yo ebimisaka kaka lokuta.
[20] Ovandaka mpo na kotonga ndeko na yo, mpe obebisaka lokumu ya bana ya mama na yo.
[21] Yango nde makambo oyo ozalaki kosala ; mpe ngai nabatelaki kimia. Okanisi penza ete ngai nazali lokola yo ? Nakopamela yo mpe nakotanda makambo nyonso oyo nazwa yo na miso na yo.
[22] Bino bato oyo bozali kobosana Nzambe, nabondeli bino : bososola makambo oyo ; noki te nakobebisa bino, mpe moto moko te akokangola bino.
[23] Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka, apesaka ngai lokumu ; mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye, nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »