Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:30

[1] Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi !

[2] Nkolo, yoka ngai ! Yoka mabondeli na ngai !

[3] Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema ?

[4] Kasi bolimbisi ezali epai na Yo, yango wana basengeli kotosa Yo.

[5] Na motema na ngai mobimba, nazali na elikya kati na Yawe, nazali penza na elikya ; nazali kozela maloba na Ye.

[6] Nazali na elikya kati na Nkolo koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo, koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.

[7] Isalaele, tia elikya kati na Yawe, pamba te azali bolingo, mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye.

[8] Ye nde akokangola Isalaele na bambeba na yango nyonso.

Banzembo — Chapters