[1] Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni, tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona.
[2] Todiembikaki mandanda na biso na banzete ya pepiliye ya etuka yango.
[3] Kuna, bato oyo bamemaki biso na bowumbu bazalaki kosenga biso banzembo ; mpe banyokoli na biso bazalaki kosenga biso ete tozala na esengo. Bazalaki koloba : « Boyembela biso banzembo ya Siona ! »
[4] Tokoyemba banzembo ya Yawe ndenge nini na mabele ya bapaya ?
[5] Oh Yelusalemi, soki nabosani yo, wana tika ete loboko na ngai ya mobali elemba !
[6] Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi, soki natie yo te liboso ya esengo nyonso, wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai !
[7] Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ; bazalaki koganga : « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »
[8] Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo, esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe oyo osalaki biso !
[9] Esengo na moto oyo akokanga bana na yo mpe akonika bango na libanga !