[1] Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso mpo na tango nyonso ? Mpo na nini kongalisa kanda na Yo likolo ya etonga oyo oleisaka ?
[2] Kanisa lisusu lisanga ya bato na Yo, oyo osikola wuta kala, libota oyo okomisa libula na Yo. Kanisa ngomba Siona epai wapi ovandaka.
[3] Tika ete matambe na Yo ekoma kino na bisika oyo ebebi nye ! Kati na Esika na Yo ya bule, monguna abebisi nyonso ;
[4] bayini na Yo bagangi lokola nkosi, ata kati na esika oyo okutanaka na biso, batelemisi bendele na bango lokola elembo.
[5] Bazali lokola bato oyo basimbi bipasola mpe bazali kokata banzete kati na zamba.
[6] Babuki-buki bililingi nyonso oyo batobola na mabaya, na nzela ya bipasola mpe bamarto na bango ;
[7] batumbi Esika na Yo ya bule, bakweyisi mpe bakomisi mbindo esika oyo Kombo na Yo evandaka.
[8] Bazalaki komilobela : « Tokopanza yango nyonso ! » Kati na mokili, bazikisi esika nyonso epai wapi bagumbamelaka Nzambe.
[9] Tozali lisusu komona te bilembo na biso, basakoli bazali lisusu te ; mpe moko te kati na biso ayebi tango boni makambo oyo ekowumela.
[10] Oh Nzambe, kino tango nini monguna akofinga Yo ? Boni, akokoba tango nyonso kotiola Kombo na Yo ?
[11] Mpo na nini ozongisi loboko na Yo na sima, loboko na Yo ya mobali ? Mpo na nini okangi maboko na Yo ?
[12] Nzokande, Yo Nzambe, ozali Mokonzi na ngai wuta kala ; Yo nde omemaka lobiko kati na mokili.
[13] Yo nde opasolaki ebale na nguya na Yo, opanzaki mito ya bilima ya mayi ;
[14] Yo nde opanzaki mito ya Leviatani mpe opesaki yango lokola bilei epai ya banyama ya esobe ;
[15] Yo nde osalaki ete bitima ya mayi mpe miluka etiola, mpe okawusaki bibale mpo na libela.
[16] Moyi ezali ya Yo, butu mpe ezali ya Yo ; Yo nde osalaki sanza mpe moyi.
[17] Ezali Yo nde otiaki bandelo nyonso ya mokili, Yo nde osalaki tango ya malili mpe tango ya moyi.
[18] Yawe, kobosana te ete monguna afingi Yo, ete bato bazanga tina batioli Kombo na Yo !
[19] Kokaba te bomoi ya ebenga na Yo na monoko ya nyama oyo ezali na nzala, kobosana te mpo na libela bomoi ya babola oyo bazali bato na Yo !
[20] Tala lisusu Boyokani na Yo ! Pamba te, kati na mokili, bisika ya molili ekomi ebele, etondi na makambo na kanza.
[21] Sala ete moto oyo bazali konyokola azwa lisusu lokumu ! Sala ete mobola mpe moto akelela bakumisa Kombo na Yo.
[22] Oh Nzambe, telema mpe lobela Kombo na Yo ! Kanisa lisusu ndenge nini bazoba bafingaka Yo mikolo nyonso !
[23] Kobosana te makelele ya bayini na Yo, mangungu ya banguna na Yo, oyo ezali kaka komata se komata !