[1] Nzembo ya Azafi.
[2] Oh Nzambe, kovanda nye te ! Nzambe, kokanga monoko na Yo te, kotikala kimia te !
[3] Tala ndenge banguna na Yo bazali kotomboka ; tala ndenge bayini na Yo bazali kotombola mito na bango !
[4] Bazali kosalela bato na Yo likita, kokanela bato oyo obatelaka.
[5] Bazali koloba : « Boya, toboma bango nyonso mpo ete ekolo na bango ezala lisusu te, mpo ete batanga lisusu kombo ya Isalaele te. »
[6] Basangani mpe bayokani, basali boyokani mpo na kotelemela Yo :
[7] bato ya Edomi mpe bato ya Isimaeli, bato ya Moabi mpe bato ya Agari,
[8] Gebali, Amoni mpe Amaleki, bato ya Filisitia elongo na bato ya Tiri.
[9] Bato ya Asiri mpe basangani elongo na bango mpo na kobakisa bakitani ya Loti makasi.
[10] Sala bango ndenge osalaki Madiani, ndenge osalaki Sisera mpe Yabini, kuna na mayi ya Kishoni.
[11] Babebisamaki na Eyini-Dori, bakomaki lokola matiti ya kopola mpo na mabele.
[12] Sala bato na bango ya lokumu ndenge osalaki Orebi mpe Zeebi ; mpe sala bakambi na bango ndenge osalaki Zeba mpe Tsalimuna
[13] oyo bazalaki koloba : « Tobotola mabele ya Nzambe ! »
[14] Nzambe na ngai, balola bango lokola matiti oyo mopepe ezali kopumbwisa.
[15] Ndenge moto ezikisaka zamba, ndenge moto makasi ezikisaka bangomba,
[16] landa bango na nzela ya mopepe na Yo mpe bangisa bango na nzela ya mopepe makasi na Yo !
[17] Yawe, tondisa bilongi na bango na soni mpo ete baluka Kombo na Yo !
[18] Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela ! Tika ete bakufa na soni !
[19] Tika bayeba ete Yo, oyo Kombo na Yo ezali Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo kati na mokili mobimba !