[1] Libondeli ya Davidi. Oh Yawe, yoka ngai ! Kolela na ngai ezali sembo ! Yoka koganga na ngai ! Landa malamu libondeli na ngai, oyo ezali kobimela te na bibebu ya lokuta.
[2] Tika ete, na mitindo na Yo, bosembo na ngai emonisama solo mpe miso na Yo emona oyo ezali alima !
[3] Soki otali malamu motema na ngai, soki olandeli ngai ata na butu mpe omeki ngai, okomona ete nasalaki mabongisi ya mabe te, monoko na ngai ebukaki mobeko te.
[4] Ata tango bato bamekaki kopesa ngai kanyaka, nabatelaki kaka maloba na Yo mpo ete natambola te na banzela ya bato ya masumu.
[5] Matambe na ngai ezalaka kaka na banzela na Yo, napengwaka te.
[6] Nzambe na ngai, nabelelaka Yo, pamba te oyanolaka ngai. Yoka libondeli na ngai.
[7] Yo oyo obikisaka mpe okangolaka, na nzela ya loboko na Yo ya mobali, bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, lakisa ngai misala kitoko ya bolingo monene na Yo.
[8] Batela ngai lokola mbuma ya liso, bomba ngai na se ya mapapu na Yo,
[9] mosika ya bato mabe oyo bazali konyokola ngai, mosika ya banguna na ngai oyo bazingeli ngai.
[10] Bakomisi mitema na bango makasi, mpe bazali koloba na lolendo.
[11] Bazali kolanda ngai, basili kozingela ngai, mpe bazali koluka ndenge nini kobwaka ngai na mabele.
[12] Bazali lokola nkosi oyo etondi na posa makasi ya kokanga nyama, lokola nkosi ya kanda makasi kati na ebombamelo na yango.
[13] Yawe, telema, kutana na bango mpe bebisa bango ; na nzela ya mopanga na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe.
[14] Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango ! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango ; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango !
[15] Mpo na ngai, sima na ngai kolonga, nakotala elongi na Yo ; sima na ngai kolamuka, nakosepela na komona Yo !