[1] Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
[2] Natiaki elikya na ngai kati na Yawe ; abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.
[3] Abimisaki ngai na libulu ya mozindo, kati na potopoto ; atelemisaki ngai na likolo ya libanga mpe alendisaki makolo na ngai.
[4] Atiaka nzembo ya sika kati na monoko na ngai, nzembo ya masanzoli mpo na Nzambe na biso. Bato ebele bakomona, bakobanga mpe bakotiela Yawe motema.
[5] Esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yawe, kasi atalelaka te bato ya lolendo mpe bakosi.
[6] Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza. Moko te akokani na Yo ; nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango, kasi motango na yango eleki ebele.
[7] Osepelaki te na bambeka mpe na makabo, kasi ofungolaki matoyi na ngai ; osengaki te makabo ya kotumba mpe bambeka mpo masumu.
[8] Bongo nalobaki : « Ngai oyo, nayei epai na Yo kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.
[9] Nzambe na ngai, nasepelaka kosala mokano na Yo, Mobeko na Yo ezali kati na motema na ngai. »
[10] Nasakolaka bosembo na Yo kati na mayangani, nakokanga monoko na ngai te ; Yawe, oyebi yango !
[11] Nabombaka bosembo na Yo te kati na motema na ngai, natatolaka boyengebene mpe lobiko na Yo kati na mayangani, nakobomba yango ata moke te.
[12] Yawe, kopimela ngai mawa na Yo te ; kasi sala ete bolingo mpe bosolo na Yo ebatelaka ngai tango nyonso.
[13] Pamba te makambo ebele ya pasi ezingeli ngai, mabunga na ngai ekomi konyokola ngai, mpe nazali kokoka lisusu te kotala yango ; ezali ebele koleka suki ya moto na ngai, mpe motema na ngai elembi kati na ngai.
[14] Yawe, nabondeli Yo, kangola ngai ; Yawe, yaka noki kosunga ngai.
[15] Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai bakufa soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai bazonga sima mpe babungisa lokumu na bango !
[16] Tika ete ba-oyo balobaka na ngai : « Ah ! Ah ! » bayoka somo mpe bakufa soni !
[17] Kasi tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Yawe azali monene ! »
[18] Solo, nazali mobola mpe moto akelela, kasi tika ete Nkolo asunga mpe akangola ngai. Nzambe na ngai, kowumela te !