Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:47

[1] Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

[2] Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.

[3] Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo ! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.

[4] Atiaki bikolo na se na biso, mpe mabota na se ya bokonzi na biso.

[5] Aponelaki biso libula na biso, oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.

[6] Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ; Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.

[7] Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye.

[8] Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.

[9] Nzambe akonzaka bikolo nyonso ; Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule.

[10] Bato minene ya bikolo basangani, lokola bato ya Nzambe ya Abrayami, pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe ; atombwama makasi.

Banzembo — Chapters