Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:36

[1] Nzembo ya Davidi. Tika ete Yawe, Libanga na ngai, apambolama ; Ye oyo akembisaka maboko mpe makofi na ngai mpo na bitumba !

[2] Azali bolingo na ngai mpe ndako na ngai ya makasi, ebombamelo mpe mokangoli na ngai, nguba mpe ekimelo na ngai ; Ye nde atiaka bato na ngai na se ya bokonzi na ngai.

[3] Oh Yawe, moto nde nani mpo ete obatelaka ye ? Moto nde nani mpo ete okanisaka ye ?

[4] Moto azali lokola mopepe, mikolo ya bomoi na ye ezali lokola elili oyo ezali koleka.

[5] Yawe, fungola likolo mpe kita awa na mabele ! Yaka kosimba bangomba mpe sala ete ebimisa milinga !

[6] Tinda mikalikali mpe panza banguna na ngai ; bwakela bango makonga na Yo mpe bungisa bango nzela.

[7] Tanda loboko na Yo wuta kuna na likolo mpo na kobikisa mpe kokangola ngai na mayi minene, na maboko ya bapaya

[8] oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.

[9] Oh Nzambe, nakoyembela Yo nzembo ya sika, nakobetela Yo lindanda ya basinga zomi.

[10] Ezali Yo, Nzambe, nde opesaka bakonzi elonga, obikisaka Davidi, mosali na Yo, liboso ya mopanga oyo ebomaka.

[11] Bikisa mpe kangola ngai na maboko ya bapaya oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.

[12] Bana mibali na biso bazali lokola milona, bazali kokola malamu wuta na bomwana na bango ; bana basi na biso bazali lokola bililingi kitoko oyo batoboli na bamir ya ndako ya mokonzi.

[13] Bibombelo na biso etondi na biloko ya ndenge na ndenge ; bameme na biso ezali kobotana na minkoko, na bankoto zomi kati na bitonga na biso ;

[14] bangombe na biso ezali minene ; likama ezali te, zemi ezali kosopana te, mpe koganga moko te ya pasi ezali koyokana na bisika na biso.

[15] Esengo na bato oyo batondisami na bolamu ya boye ! Esengo na bato oyo Yawe azali Nzambe na bango !

Banzembo — Chapters