Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:53

[1] Boyembela Yawe nzembo ya sika ! Bino nyonso, bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe !

[2] Boyembela Yawe, bopambola Kombo na Ye ! Bopanza sango ya lobiko na Ye, mokolo na mokolo !

[3] Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota ! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso.

[4] Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.

[5] Banzambe nyonso ya bikolo ezali bikeko ya pamba, nzokande Yawe akela likolo.

[6] Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, nguya mpe nkembo ezali kati na Esika na Ye ya bule.

[7] Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe ; bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye !

[8] Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo ! Bomema makabo na bino, bokota na lopango na Ye !

[9] Bogumbama liboso ya Yawe oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi ! Bino bavandi ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye !

[10] Boloba kati na mabota : « Yawe azali Mokonzi ! Mokili elendisama makasi, ekoningana te. Yawe asambisaka bato na bosembo. »

[11] Tika ete likolo esepela, mpe mabele ezala kati na esengo ! Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango epesa lokito !

[12] Tika ete zamba mobimba elongo na nyonso oyo ezali kati na yango esepela, mpe tika ete banzete nyonso ya zamba eganga na esengo

[13] liboso ya Yawe, pamba te azali koya ! Solo, azali koya kosambisa mabele ; akosambisa mokili na bosembo, mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye.

Banzembo — Chapters