[1] Nzembo ya Davidi. Eh molimo na ngai, pambola Yawe ! Tika ete motema na ngai mobimba epambola Kombo na Ye ya bule !
[2] Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye !
[3] Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso, abikisaka yo na bokono nyonso,
[4] akangolaka bomoi na yo wuta na libulu, alatisaka yo motole ya bolingo mpe ya mawa,
[5] atondisaka bomoi na yo na esengo mpe akomisaka yo elenge lokola mpongo.
[6] Yawe asalaka mpo na bosembo, akotelaka banyokolami nyonso.
[7] Amonisaki banzela na Ye epai ya Moyize, mpe bikamwa na Ye epai ya bato ya Isalaele.
[8] Yawe ayokelaka bato mawa mpe asalelaka bango bolamu, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo ;
[9] azwaka biso makambo te tango nyonso, abombaka kanda na Ye te mpo na libela ;
[10] apamelaka biso te kolanda masumu na biso, azongiselaka biso te kolanda mabe na biso.
[11] Ndenge likolo etombolama mosika ya mabele, ndenge wana mpe bolingo na Ye ezali monene mpo na bato oyo batosaka Ye ;
[12] ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso.
[13] Ndenge tata alingaka makasi bana na ye, ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi bato oyo batosaka Ye ;
[14] pamba te Yawe ayebi na eloko nini asala biso, ayebi malamu ete tozali putulu.
[15] Mikolo ya bomoi ya moto ezali lokola matiti, ebongaka lokola fololo ya bilanga ;
[16] nzokande soki kaka mopepe ebeti yango, ezalaka lisusu te, mpe esika epai wapi ezalaki ebosani yango.
[17] Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,
[18] mpo na bato oyo babatelaka boyokani na Ye mpe batosaka mibeko na Ye, ezali ya libela na libela.
[19] Yawe atia Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Likolo, azali Mokonzi ya mokili mobimba.
[20] Bopambola Yawe, bino ba-anjelu na Ye nyonso oyo bozali na nguya mpe botosaka mitindo na Ye.
[21] Bopambola Yawe, bino mampinga na Ye nyonso oyo bokokisaka mokano na Ye.
[22] Bopambola Yawe, bino bikelamu na Ye nyonso, kati na bisika nyonso ya Bokonzi na Ye. Eh molimo na ngai, pambola Yawe !