Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:03

[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Ebenga ya terebente ya mosika. » Nzembo ya Davidi, tango bato ya Filisitia bakangaki ye kati na mboka Gati.

[2] Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te bato bazali kotungisa ngai. Babundisaka mpe banyokolaka ngai mikolo nyonso.

[3] Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso ; bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.

[4] Mokolo oyo nazalaka na bobangi, natiaka elikya na ngai kati na Yo.

[5] Epai ya Nzambe, nakumisaka Liloba na Ye ; Epai ya Nzambe, natiaka motema mpe nabangaka te. Moto oyo akokufa akoki kosala ngai nini ?

[6] Babongolaka maloba na ngai mikolo nyonso ; mabongisi na bango nyonso ezalaka mpo na kosala ngai mabe.

[7] Basalaka makita, babombamaka, balandaka ngai mpo na kosala ngai mabe.

[8] Mpo na makambo oyo ya mabe, boni, bazanga etumbu ? Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo !

[9] Solo, oyebi motango ya matambe ya bomoi na ngai ya mitelengano. Sopa mpinzoli na ngai kati na mbeki na Yo, oyo ezali buku na Yo ya ekaniseli.

[10] Bongo, na mokolo oyo nakobelela mpo na kosenga lisungi, banguna na ngai bakozonga sima. Na nzela ya likambo yango, nakoyeba ete Nzambe azali mpo na ngai.

[11] Pembeni ya Nzambe oyo nakumisaka Liloba na Ye, pembeni ya Yawe oyo nakumisaka Liloba na Ye,

[12] pembeni ya Nzambe oyo natielaka motema mpe nazalaka na bobangi te, moto akoki kosala ngai nini ?

[13] Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai mpe nakobonza bambeka ya matondi.

[14] Pamba te okangoli ngai na kufa mpe obateli makolo na ngai ete ebeta mabaku te, mpo ete natambola liboso na Yo Nzambe kati na pole ya bomoi.

Banzembo — Chapters