Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:31

[1] Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo ; yaka noki epai na ngai ! Yoka mongongo na ngai, wana nazali kobelela Yo !

[2] Liboso na Yo, tika ete libondeli na ngai ezala lokola mbeka ya malasi, mpe botombwami ya maboko na ngai ezala lokola mbeka ya pokwa !

[3] Yawe, kengela monoko na ngai, batela malamu ekuke ya bibebu na ngai !

[4] Kotindika motema na ngai te na mabe, mpo ete namipesa te na mobulu elongo na bato ya misala mabe mpe nalia bilei te elongo na bango.

[5] Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.

[6] Tika ete bilombe na bango babwakama na mabanga ; na bongo, maloba na ngai ekoyokana, pamba te ezali kitoko.

[7] Lokola tango babalolaka mpe batimolaka mabele, mikuwa na biso epanzani liboso ya mboka ya bakufi.

[8] Yawe, Nkolo na ngai, miso na ngai ebaluki mpo na kotala Yo ; nazali kobombama kati na Yo, kotindika ngai na kufa te !

[9] Batela ngai mpo ete nakangama te na motambo na bango mpe nakweya te na mabulu ya bato ya misala mabe.

[10] Tika ete bato mabe bakangama na mitambo na bango moko, mpe ete ngai naleka na kimia !

Banzembo — Chapters