[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Yawe, omonaka mozindo ya bomoi na ngai mpe oyebi ngai malamu ;
[2] oyebi tango navandaka mpe tango natelemaka. Liboso na ngai kokanisa, ososolaka mabongisi na ngai ;
[3] omonaka tango natambolaka mpe tango nalalaka, oyebi mozindo ya banzela na ngai nyonso.
[4] Pamba te, oh Yawe, liboso ete liloba ekoma na lolemo na ngai, omiyebelaka yango.
[5] Ozali pene ngai, na liboso mpe na sima, mpe osimbi ngai na loboko na Yo.
[6] Solo, boyebi oyo ya kokamwa elekelaka ngai, ezali likolo makasi, nakoki kososola yango te.
[7] Nakende wapi mpo na kokima Molimo na Yo ? Nakima wapi mpo na kozala mosika na Yo ?
[8] Soki namati na likolo, ozali kuna ; soki nakeyi na mboka ya bakufi, ozali lisusu kuna.
[9] Soki nazwi mapapu ya lipekapeka mpo na kokende kovanda mosika ya ebale monene,
[10] kuna mpe loboko na Yo ekotambolisa ngai, loboko na Yo ya mobali ekosimba ngai makasi.
[11] Soki nalobi : « Tembe te, molili ekobomba ngai penza ; tika ete pole ekoma butu zingazinga na ngai ! »
[12] Epai na Yo, butu ezalaka molili te, butu ezalaka na pole lokola moyi, pole mpe molili ezali ndenge moko.
[13] Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai, obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.
[14] Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi. Misala na Yo ezali ya kokamwa ; ngai, nayebi yango malamu.
[15] Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te tango osalaki ngai na esika ebombama, tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.
[16] Tango nazalaki nanu na lolenge te, ozalaki komona ngai ; mpe omikomelaki kati na buku na Yo mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai liboso ete moko te kati na yango ezala.
[17] Oh Nzambe, tala ndenge ezali pasi mpo na ngai kososola makanisi na Yo ! Tala ndenge motango na yango ezali ebele !
[18] Nameki kotanga yango, ezali ebele koleka motango ya bambuma ya zelo. Nalamuki, nazali kaka elongo na Yo.
[19] Oh Nzambe, soki kaka ozalaki na Yo koboma moto mabe ! Bino basopi makila ya bato, bokende mosika na ngai !
[20] Bayini na Yo basalelaka Kombo na Yo mpo na kosala mabongisi ya mabe, batangaka Kombo na Yo mpo na kokosa.
[21] Yawe, ndenge nini nayina te banguna na Yo, ndenge nini nayoka batelemeli na Yo nkele te ?
[22] Nayinaka bango makasi ; nazwaka bango lokola banguna na ngai.
[23] Oh Nzambe, kundola mpe yeba mozindo ya motema na ngai, meka ngai mpe yeba makambo oyo ezali kotungisa ngai !
[24] Tala soki nazali kotambola na nzela mabe mpe tambolisa ngai na nzela ya tango nyonso !