Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:46

[1] Nzembo. Boyembela Yawe nzembo ya sika, pamba te asalaka makambo ya kokamwa ! Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe, alongaki.

[2] Yawe atalisaki elonga na Ye, amonisaki bosembo na Ye epai ya bikolo.

[3] Akanisaki bolingo mpe bosembo na Ye mpo na libota ya Isalaele. Kino na suka ya mokili, elonga ya Nzambe na biso emonanaki.

[4] Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko, boyemba banzembo ya esengo mpe bobeta mindule !

[5] Bobetela Yawe lindanda, boyembela Ye banzembo na lokito ya nzenze !

[6] Bobeta maboko liboso ya Yawe, Mokonzi, na lokito ya bakelelo mpe ya maseke.

[7] Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mokili mpe bavandi na yango, bapesa lokito !

[8] Tika ete bibale ebeta maboko mpe bangomba nyonso eganga na esengo

[9] liboso ya Yawe, pamba te azali koya kosambisa mabele ! Akokata makambo na yango na bosembo.

Banzembo — Chapters