[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Azafi. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.
[2] Boganga na esengo epai ya Nzambe, makasi na biso ! Bobetela Nzambe ya Jakobi maboko !
[3] Boyemba banzembo, bobeta bambunda mike, lindanda oyo ebimisaka lokito kitoko mpe nzenze !
[4] Bobeta kelelo na ebandeli ya sanza, na tango oyo sanza mobimba engengaka, mpo na mokolo ya feti na biso !
[5] Pamba te ezali mobeko mpo na Isalaele, mpe mokano ya Nzambe ya Jakobi.
[6] Atiaki yango lokola mobeko mpo na Jozefi tango abundisaki Ejipito. Nazali koyoka lokota oyo nayebi te :
[7] « Nalongolaki mokumba oyo ezalaki na mapeka na ye, mpe maboko na ye elongwaki na bowumbu ya kosimba bitunga. »
[8] Tango ozalaki koganga mpo na pasi, nakangolaki yo, nayanolaki yo kati na kake epai wapi nabombamaki, namekaki yo pembeni ya mayi ya Meriba.
[9] Bato na ngai, boyoka ngai ! Mpe nakokebisa bino. Ah Isalaele, soki kaka ozalaki koyokela ngai !
[10] Okozala na nzambe ya mopaya te kati na yo, okogumbamela nzambe mosusu te, longola kaka ngai !
[11] Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito ; fungola malamu monoko na yo, mpe nakotondisa yango.
[12] Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te, Isalaele aboyaki kotosa ngai.
[13] Mpo na yango, natikaki bango kotambola kolanda baposa ya mitema makasi na bango ; mpe balandaki makanisi na bango.
[14] Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai, soki Isalaele azalaki kolanda banzela na ngai,
[15] nalingaki mbala moko koyokisa banguna na bango soni mpe kobundisa bayini na bango.
[16] Mpe bato oyo bayinaka Yawe balingaki komikitisa liboso na Ye, mpe etumbu na bango elingaki kowumela mpo na libela.
[17] Yawe alingaki koleisa Isalaele bilei ya kitoko mpe kotondisa bango na mafuta ya nzoyi.