Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:24

[1] Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli,

[2] kasi asepelaka na mibeko ya Yawe mpe akanisaka yango butu mpe moyi.

[3] Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu.

[4] Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe ! Bazali lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe epanzaka.

[5] Yango wana bato mabe bakolonga te kotelema na kosambisama, mpe bato ya masumu bakowumelaka te kati na lisanga ya bato ya sembo.

[6] Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.

Banzembo — Chapters