[1] Yawe azali kokonza ! Tika ete mabele esepela ; tika ete ebele ya bisanga ezala na esengo !
[2] Mapata mpe molili makasi ezingeli Ye, bosembo mpe bosolo ezali miboko ya Kiti na Ye ya Bokonzi.
[3] Moto etambolaka liboso na Ye, ezikisaka banguna na Ye, oyo bazingeli Ye.
[4] Mikalikali na Ye engengisaka mokili ; mpe tango mabele emonaka bongo, elengaka.
[5] Bangomba enyangwamaka lokola mafuta liboso ya Yawe, liboso ya Nkolo ya mokili mobimba.
[6] Likolo epanzaka sango ya bosembo na Ye, mpe bikolo nyonso bamonaka nkembo na Ye.
[7] Tika ete soni ekanga basambeli nyonso ya bikeko, bato oyo bamikumisaka mpo na banzambe ya lokuta ! Bino banzambe nyonso, bogumbama liboso na Ye !
[8] Yawe, Siona eyoki yango mpe esepeli ; bingumba ya Yuda ezali na esengo mpo na mikano na Yo !
[9] Pamba te, na mokili mobimba, Yo nde Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; oleki banzambe nyonso.
[10] Bino bato oyo bolingaka Yawe, boyina mabe ! Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.
[11] Moyi elonami mpo na moto ya sembo, mpe esengo, mpo na bato oyo bazali na mitema alima.
[12] Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe ; bosanzola Ye na kotatola bosantu na Ye.