[1] Bokumisa Yawe ! Bokumisa Kombo ya Yawe ! Bokumisa Ye, bino basali ya Yawe,
[2] oyo botelemaka kati na Ndako ya Yawe, kati na lopango ya Ndako ya Nzambe na biso !
[3] Bokumisa Yawe ! Pamba te Yawe azali malamu ! Boyembela Kombo na Ye, pamba te ezali kitoko makasi.
[4] Pamba te Yawe aponaki Jakobi, Isalaele, mpo ete azala ya Ye moko.
[5] Solo, ngai nayebi malamu ete Yawe azali monene, ete Nkolo na biso aleki banzambe nyonso.
[6] Yawe asalaka nyonso oyo alingi, kuna na likolo mpe awa na mabele, kati na bibale minene mpe kati na mozindo nyonso.
[7] Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili, atindaka mikalikali elongo na mvula, abimisaka mopepe wuta na bibombelo na yango.
[8] Ye nde abomaki bana ya liboso ya Ejipito, kobanda na bato kino na banyama ;
[9] atindaki bilembo ya kokamwa mpe bikamwa kati na yo, Ejipito, mpo na kotelemela Faraon mpe basali na ye nyonso ;
[10] abebisaki bikolo ebele mpe abomaki bakonzi ya nguya :
[11] Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ; Ogi, mokonzi ya Bashani ; mpe bakonzi nyonso ya Kanana.
[12] Mpe akabaki mikili na bango lokola libula, lokola libula epai ya bato na Ye, Isalaele.
[13] Oh Yawe, sango ya Kombo na Yo ewumelaka libela na libela ! Yawe, bakopanza sango ya Kombo na Yo seko na seko !
[14] Pamba te Yawe akolimbisa bato na Ye, akoyokela basali na Ye mawa.
[15] Banzambe ya bikolo ezali ya palata mpe ya wolo, esalema na maboko ya bato.
[16] Ezali na minoko, kasi elobaka te ; ezali na miso, kasi emonaka te ;
[17] ezali na matoyi, kasi eyokaka te ; ezali ata na pema te kati na minoko na yango.
[18] Bato oyo basalaka yango mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema bakokani na yango.
[19] Bato ya Isalaele, bopambola Yawe ! Bakitani ya Aron, bopambola Yawe !
[20] Bakitani ya Levi, bopambola Yawe ! Bino nyonso oyo botosaka Yawe, bopambola Yawe !
[21] Tika ete, wuta na Siona, Yawe apambolama, Ye oyo avandaka na Yelusalemi ! Bokumisa Yawe !