Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:57

[1] Nzembo ya Davidi. Maloba na ye tango azalaki kati na ebombamelo ya mabanga.

[2] Na mongongo makasi, nazali koganga epai na Yawe ; na mongongo makasi, nazali kobondela Yawe.

[3] Natalisi likambo na ngai liboso na Ye, natandi pasi na ngai liboso na Ye.

[4] Soki molimo na ngai elembi kati na ngai, Yo oyebi epai nazali kokende. Batieli ngai motambo na nzela oyo nazali kotambola.

[5] Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala ! Moto ata moko te ayebi ngai lisusu, nazali lisusu na ekimelo te, moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai !

[6] Yawe, nagangi epai na Yo ! Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai, libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi ! »

[7] Yoka koganga na ngai, pamba te nazali na pasi makasi ! Kangola ngai wuta na maboko ya banyokoli na ngai, pamba te baleki ngai na makasi.

[8] Bimisa ngai na boloko mpo ete nasanzola Kombo na Yo ! Bato ya sembo bakoya kozingela ngai sima na Yo kosalela ngai bolamu.

Banzembo — Chapters