Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:08

[1] Nzembo ya Davidi. Yawe, kota likambo na ngai liboso ya bayini na ngai ; bundisa bato oyo bazali kobundisa ngai.

[2] Kamata nguba ya moke mpe ya monene, mpe telema mpo na kosunga ngai.

[3] Tombola likonga ya monene mpe ya moke mpo na kobundisa bato oyo bazali kolanda ngai. Loba na ngai : « Nazali lobiko na Yo. »

[4] Tika ete bato oyo bazali komeka bomoi na ngai basambwa mpe bayoka soni ; tika ete bato oyo bazali kokana kosala ngai mabe bazonga sima mpe bakoma mawa-mawa !

[5] Tika ete bakoma lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ezali kopumbwisa, tango anjelu ya Yawe akotindika bango ;

[6] tika ete nzela na bango ekoma molili mpe moselu tango anjelu ya Yawe akobengana bango.

[7] Mpo ete, na kozanga tina, mpo na kokanga ngai, batielaki ngai mitambo mpe batimolaki mabulu,

[8] tika ete libebi ekweyela bango na mbalakata, bakangama bango moko na mitambo oyo batielaki ngai mpe bakweya kati na mabulu yango !

[9] Nakotonda na esengo kati na Yawe mpe nakosepela kati na lobiko na Ye.

[10] Mikuwa na ngai nyonso ekoloba : « Oh Yawe, nani akoki kokangola, lokola Yo, mobola wuta na maboko ya moto oyo aleki ye na makasi, mobola mpe mokeleli wuta na maboko ya banyokoli na bango ? »

[11] Batatoli oyo bamipesa na kanza batelemi, bazali kopesa ngai mituna na tina na makambo oyo nayebi te.

[12] Bazali kozongisela ngai mabe mpo na bolamu oyo nasalaki, mpe kosundola ngai lokola monyokolami.

[13] Nzokande tango bango babelaki, ngai nalataki saki, namikitisaki na kokila bilei, nazalaki kobondela mpo na bango.

[14] Nazalaki kotambola na mawa lokola mpo na moninga to mpo na ndeko ; nazalaki kokitisa moto na se mpo na mawa lokola moto oyo azali kolela mama na ye.

[15] Kasi awa ngai nakomi na pasi, bango bazali kosepela mpe kosangana ; wana ngai nayebi te, bango bazali kosangana mpo na kotonga ngai, bazali kolemba te kofinga ngai.

[16] Lokola bapagano, bazali koseka ngai, bazali kolia minu na tina na ngai.

[17] Yawe, kino tango nini okotala kaka boye ? Kangola ngai wuta na misala na bango ya mabe, bomoi na ngai wuta na manzaka ya bankosi oyo.

[18] Nakokumisa Yo kati na mayangani monene, nakosanzola Yo kati na ebele ya bato.

[19] Tika ete banguna na ngai basepela te na tina na ngai ; tika ete bayini na ngai na kozanga tina bakanga miso te.

[20] Pamba te balobaka te maloba ya kimia, kasi babongisaka lokuta mpo na kokosela bato ya kimia makambo kati na mboka.

[21] Balobaka na mongongo makasi : « Eh ! Eh ! Tomonaki ye ! »

[22] Yawe, omoni nyonso wana ; kovanda nye te ! Nkolo, kozala mosika na ngai te !

[23] Lamuka mpe telema mpo na kolongisa ngai ! Nzambe na ngai mpe Nkolo na ngai, kota likambo na ngai.

[24] Yawe, Nzambe na ngai, longisa ngai na bosembo na Yo ; kotika bango te kosepela na tina na ngai.

[25] Tika ete bamilobela te : « Ah ! Tala makambo oyo tozalaki koluka ! » Tika ete baloba te : « Tolie ye. »

[26] Tika ete bato nyonso oyo basepelaka na pasi na ngai, bango nyonso lisanga, bayoka soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo batombokelaka ngai balata soni mpe bazala kati na yikiyiki !

[27] Tika ete bato oyo basepelaka na bosembo na ngai baganga na esengo mpe basepela ; tika ete balobaka tango nyonso : « Tika ete Yawe anetolama, Ye oyo asepelaka na kimia ya mowumbu na Ye ! »

[28] Nakosakola bosembo na Yo, nakokumisa Yo mikolo nyonso.

Banzembo — Chapters