Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:27

[1] Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba : lisungi na ngai ekowuta wapi ?

[2] Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.

[3] Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.

[4] Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te !

[5] Yawe azali mobateli na yo ; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo.

[6] Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te !

[7] Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo ;

[8] Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.

Banzembo — Chapters