Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:26

[1] Libondeli ya Davidi. Yawe, yoka mpe yanola ngai ; pamba te nazali mobola mpe moto akelela.

[2] Batela bomoi na ngai, pamba te nazali moyengebene na Yo. Yo, Nzambe na ngai, bikisa ngai, mosali na Yo, oyo natiaka elikya kati na Yo.

[3] Oh Nkolo, yokela ngai mawa ; pamba te nabelelaka Yo tango nyonso !

[4] Nkolo, sepelisa motema na ngai, mosali na Yo, pamba te natombolaka molimo na ngai epai na Yo.

[5] Nkolo, ozali malamu, olimbisaka, otonda na bolingo mpo na bato nyonso oyo babelelaka Yo.

[6] Yawe, yoka losambo na ngai, yoka libondeli na ngai !

[7] Na mokolo ya pasi na ngai, nabelelaka Yo, pamba te oyanolaka ngai.

[8] Nkolo, nzambe moko te ekokani na Yo, kati na banzambe ; moko te ekoki kosala makambo oyo Yo osalaka.

[9] Nkolo, bikolo nyonso oyo osala ekoya kogumbama liboso na Yo mpe ekoya kopesa Kombo na Yo nkembo.

[10] Pamba te ozali monene mpe osalaka bikamwa ; Yo kaka nde ozali Nzambe.

[11] Yawe, lakisa ngai nzela na Yo, mpe nakotambola kolanda bosolo na Yo. Pesa ngai motema ya sembo mpo ete natosa Yo.

[12] Nkolo, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo, na motema na ngai mobimba, nakopesa Kombo na Yo nkembo mpo na Yo libela.

[13] Pamba te bolingo na Yo mpo na ngai ezali monene, mpe okangolaki ngai wuta na mozindo ya mboka ya bakufi.

[14] Nzambe, bato ya lofundu bazali kobundisa ngai, mpe ngulupa ya bato na kanza bazali koluka koboma ngai ; batosaka Yo ata moke te.

[15] Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe na mawa mpe na ngolu, osilikaka noki te, otonda na bolingo mpe na boyengebene.

[16] Balola elongi na Yo epai na ngai mpe yokela ngai mawa ; pesa ngai, mosali na Yo, makasi mpe bikisa ngai mwana ya mwasi mosali na Yo !

[17] Salela ngai elembo ya boboto na Yo mpo ete banguna na ngai bamona yango mpe bakufa soni ! Yawe, ozali Mosungi mpe Mobondi na ngai.

Banzembo — Chapters