[1] Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba.
[2] Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo !
[3] Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu,
[4] na lindanda ya basinga zomi mpe na nzenze !
[5] Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai ! Nagangaka na esengo liboso ya misala ya maboko na Yo.
[6] Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo !
[7] Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.
[8] Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.
[9] Kasi Yo, kuna na likolo, ozali Yawe mpo na libela.
[10] Yawe, banguna na Yo, banguna na Yo bakokufa penza ; bato nyonso ya misala mabe bakolimwa.
[11] Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika.
[12] Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai, mpe matoyi na ngai ekomi koyoka banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa mpo na kosala ngai mabe.
[13] Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.
[14] Lokola bapikama ngwi kati na Tempelo ya Yawe, bamonaka bolamu kati na lopango ya Nzambe na biso.
[15] Ata bakomi mibange, babotaka kaka, bazalaka kaka makasi mpe kitoko,
[16] basakolaka : « Yawe azali alima, azali Libanga na biso ; kati na Ye, mabe ezali te ! »