Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:55

[1] Nzembo ya Davidi. Nakoyemba bolingo mpe bosembo ; nakoyembela nde Yo, Yawe.

[2] Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini ? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela.

[3] Nakotala eloko moko te ya mabe ; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te.

[4] Mosika na ngai, motema ya kilikili ; naboyi kosala mabe.

[5] Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.

[6] Nakopona nde bato ya sembo kati na mokili mpo ete bavanda pembeni na ngai ; moto na etamboli ezanga pamela nde akozala mosali na ngai.

[7] Kati na ndako na ngai, mokosi akovanda te ; liboso na ngai, mokosi akotelema te.

[8] Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe kati na mokili bavanda kimia ; nakolongola na engumba ya Yawe bato nyonso ya mabe.

Banzembo — Chapters