[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.
[2] Yawe, kopesa ngai etumbu te na kanda na Yo, kopesa ngai etumbu te na kanda makasi na Yo.
[3] Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazangi makasi. Yawe, bikisa ngai na bokono, pamba te mikuwa na ngai elembi.
[4] Molimo na ngai ezali kotungisama makasi ; bongo Yo, Yawe, kino tango nini ?
[5] Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai, bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo.
[6] Pamba te bakufi bakoki lisusu te kotatola Kombo na Yo te ! Mpe kati na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa Yo ?
[7] Kolela elembisi ngai nzoto. Butu nyonso, nalelaka na mbeto na ngai, mpe napolisaka na mpinzoli, esika oyo nalalaka.
[8] Miso na ngai ebebi mpo na mawa ; ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai.
[9] Bino nyonso oyo bosalaka mabe, bolongwa liboso na ngai, pamba te Yawe ayoki kolela na ngai.
[10] Yawe ayanoli mabondeli na ngai mpe ayambi losambo na ngai.
[11] Banguna na ngai nyonso bakoyoka soni, mpe somo monene ekokanga bango ; bakozonga na sima mpe bakoyoka mbala moko soni.