Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:58

[1] Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele :

[2] mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya mpe kososola maloba ya mayele ;

[3] mpo na kozwa mateya ya bwanya oyo epesaka bizaleli ya sembo, ya boyengebene mpe makambo ya alima ;

[4] mpo na kopesa mayele epai ya bazoba, mpe boyebi epai ya bilenge.

[5] Tika ete moto ya bwanya ayoka yango, mpe akobakisa bwanya na ye, bongo moto ya mayele akoyeba mayele ya kotambolisa bato ;

[6] mpo na kososola masese mpe sambole, maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.

[7] Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ; bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.

[8] Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;

[9] Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo, mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.

[10] Mwana na ngai ya mobali, soki bato ya masumu balingi kokweyisa yo, komitika te.

[11] Soki balobi na yo : « Yaka elongo na biso, tika ete tosala motambo mpo na koboma bato, tokosepela mpo na kokanga moto oyo ayebi likambo te !

[12] Ndenge mokili ya bakufi esalaka, tokomela ye ya bomoi, tokomela ye mobimba lokola bato oyo bakitaka na libulu ya kufa ;

[13] tokozwa biloko ya talo ya ndenge na ndenge, mpe tokotondisa bandako na biso na bomengo ya bitumba ;

[14] okozwa ndambo na yo epai na biso, pamba te biso nyonso tokosangisa biloko na biso esika moko ; »

[15] mwana na ngai ya mobali, kokende elongo na bango te, longola makolo na yo na nzela na bango ;

[16] pamba te makolo na bango ekimaka mbangu mpo na kolanda mabe, mpe bapotaka mbangu mpo na kosopa makila.

[17] Solo, ezali pamba kotia monyama liboso ya miso ya bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.

[18] Kasi bango, batiaka mitambo mpo na kosopa makila na bango moko, bamilukelaka pasi na bomoi na bango.

[19] Moto oyo alukaka kozwa bomengo na nzela ya lokuta asukaka kaka bongo, mpe bomengo yango ebomaka kaka ye moko.

[20] Bwanya azali koganga na libanda, atomboli mongongo na ye na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;

[21] azali koganga na bisika ya loyenge mpe azali koloba liboso ya ekuke ya engumba :

[22] « Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?

[23] Soki boyoki makebisi na Ngai, nakosopela bino Molimo na Ngai mpe nakososolisa bino maloba na Ngai.

[24] Kasi lokola bosundolaki Ngai tango nazalaki kobelela mpe moto moko te asalaki keba tango natandaki loboko,

[25] lokola bobwakaki toli na Ngai mpe boboyaki kondima pamela na Ngai,

[26] Ngai mpe nakoseka bino tango pasi ekoyela bino, nakotiola bino tango minyoko ekokomela bino,

[27] tango minyoko ekokomela bino na pwasa lokola mvula ya kake makasi, tango somo ekoyela bino lokola ekumbaki, tango mawa mpe somo ekokomela bino.

[28] Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te ; bakoluka Ngai na ngonga ya malamu, kasi bakomona Ngai te.

[29] Lokola bayinaki boyebi mpe baponaki te nzela ya kotosa Yawe,

[30] lokola baboyaki kondima toli na Ngai mpe batiolaki pamela na Ngai,

[31] bakolia mbuma ya etamboli na bango mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.

[32] Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele ekoboma bango, mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele ekoboma kaka bango moko ;

[33] kasi moto oyo ayokaka Ngai akovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »

Masese — Chapters