[1] Nzembo ya Davidi. Yawe, Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo.
[2] Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo ; sala ete nayoka soni te, mpe banguna na ngai basepela te na tina na ngai.
[3] Bato nyonso oyo batalelaka Yo bakotikala koyokisama soni ata moke te ; kaka ba-oyo bapesaka Yo mokongo nde bakoyokisama soni.
[4] Yawe, lakisa ngai nzela, teya ngai nzela oyo olingi ete nalanda.
[5] Kamba ngai kati na bosolo na Yo mpe pesa ngai mayele, pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai ; mpe ngai natiaka elikya na ngai kati na Yo tango nyonso.
[6] Yawe, kanisa mawa mpe bolingo na Yo, pamba te ezali mpo na libela na libela.
[7] Yawe, kokanisa te masumu mpe botomboki ya bolenge na ngai ; kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo, pamba te ozali malamu.
[8] Solo, Yawe azali malamu mpe alima ; atalisaka banzela na Ye epai ya bato ya masumu.
[9] Atambolisaka bato oyo bamikitisa, kati na banzela ya sembo, mpe ateyaka bango banzela na Ye.
[10] Banzela nyonso ya Yawe etalisaka bolingo mpe boyengebene na Ye mpo na bato oyo babatelaka boyokani mpe malako na Ye.
[11] Yawe, mpo na bolingo ya Kombo na Yo, limbisa masumu na ngai, atako ezali minene.
[12] Banani bazali bato oyo batosaka Yawe ? Alakisaka bango nzela ya kopona.
[13] Boye, bakolekisa mikolo ya bomoi na bango kati na bofuluki, mpe mokili ekozala libula ya bana na bango.
[14] Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.
[15] Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te kaka Ye nde akolongola makolo na ngai na motambo.
[16] Yawe, balola miso na Yo epai na ngai mpe salela ngai ngolu, pamba te nazali kaka ngai moko, mpe nazali monyokolami.
[17] Lembisa pasi ya motema na ngai mpe kangola ngai na mitungisi na ngai.
[18] Tala pasi mpe kolela na ngai, mpe limbisa masumu na ngai nyonso.
[19] Tala ndenge nini banguna na ngai bazali ebele, mpe ndenge nini bazali koyina ngai makasi !
[20] Batela bomoi na ngai mpe kangola ngai ; sala ete nayoka soni te, pamba te nabombamaka kati na Yo.
[21] Lokola mpe natielaka Yo motema, tika ete bozangi pamela mpe bosembo ebatela ngai.
[22] Nzambe, kangola Isalaele, na pasi na yango nyonso !