[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Nzambe, Yo oyo ngai nakumisaka, kovanda kimia te !
[2] Bato mabe bazali koloba lokuta mpo na kofunda ngai, bazali mpe kokosela ngai makambo.
[3] Bazingeli ngai na maloba ya koyina mpe bazali kobundisa ngai kaka pamba.
[4] Bato oyo ngai nalingaka bafundi ngai, kasi ngai namipesi na ngai kaka na mabondeli.
[5] Bazali kozongisela ngai mabe na bolamu, mpe koyina na bolingo.
[6] Kaba ye na maboko ya moto mabe ! Bimisela ye monguna, na ngambo ya loboko na ye ya mobali !
[7] Tika ete bazwa ye lokola moto mabe na tango ya kosamba, mpe libondeli na ye etangama lokola masumu !
[8] Tika ete mikolo ya bomoi na ye ekoma moke, tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye !
[9] Tika ete bana na ye bakoma bana bitike, mpe tika ete mwasi na ye akoma mwasi akufisa mobali !
[10] Tika ete bana na ye batelengana mpe bakoma bisengasenga, tika ete bakende kosenga mosika ya ndako na bango oyo ebukana-bukana !
[11] Tika ete moto oyo adefisaki ye mbongo akanga ye biloko nyonso, mpe tika ete bapaya babotola ye bambuma ya mosala na ye !
[12] Tika ete moko te atalisa ye bolingo, tika ete moko te ayokela bana bitike na ye mawa !
[13] Tika ete bakitani na ye basila na kokufa, mpe bakombo na bango elongwa na ekeke oyo ezali kolanda !
[14] Tika ete Yawe alandela masumu ya batata na ye mpe alimbisa te masumu ya mama na ye !
[15] Tika ete Yawe akanisaka masumu yango tango nyonso mpe asala ete babosana bango libela na mokili !
[16] Lokola atikalaki te kotambola na boboto, mpe lokola anyokolaki mobola mpe moto na mawa kino kobomisa moto oyo azoka na motema ;
[17] lokola azalaki kolinga mingi kolakela bato mabe, tika ete bilakeli mabe ekweyela ye ! Lokola azalaki kosepela te kopambola bato, tika ete mapamboli ezala mosika na ye !
[18] Tika ete alata elakeli mabe lokola kazaka, tika ete ekota kati na ye lokola mayi, mpe kati na mikuwa na ye lokola mafuta !
[19] Tika ete elakeli mabe yango elata ye lokola elamba oyo alati, mpe ekangama ye na loketo lokola mokaba mpo na tango nyonso !
[20] Tala ndenge Yawe akofuta banguna na ngai mpe bato oyo balobaka mabe na tina na ngai.
[21] Kasi Yo Nkolo Yawe, salela ngai bolamu mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola ngai kolanda boboto ya bolingo na Yo.
[22] Solo, nazali mobola mpe moto na mawa, mpe motema na ngai ezali ya kozoka kati na ngai.
[23] Nazali kokende lokola elili oyo ezali kolimwa ; bazali kobengana ngai lokola mabanki.
[24] Mabolongo na ngai elembi mpo na kokila mingi bilei, nzoto na ngai mpe ebukani mpo ete nakondi makasi.
[25] Mpo na bango, nakomi eloko ya nkele ; soki kaka bamoni ngai, baningisi mito.
[26] Yawe, Nzambe na ngai, sunga ngai ; bikisa ngai kolanda bolingo na Yo !
[27] Tika ete banguna na ngai bayeba ete Yo Yawe nde osalaki bongo.
[28] Ata balakeli ngai mabe, Yo okopambola ngai ; soki mpe bameki kotelema mpo na kobundisa ngai, bakokufa soni. Nzokande ngai mosali na Yo, nakozala moto ya esengo.
[29] Tika ete bayini na ngai bazanga lokumu mpe bamizipa na soni lokola kazaka.
[30] Nakosanzola Yawe na mongongo makasi, nakokumisa Ye kati na ebele ya bato.
[31] Pamba te atelemaka na ngambo ya loboko ya mobali ya mobola mpo na kokangola ye wuta na maboko ya bato oyo bakatela ye etumbu.