Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:15

[1] Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

[2] Tika ete bato oyo Yawe asikolaki baloba bongo, ba-oyo akangolaki wuta na maboko ya monguna,

[3] ba-oyo asangisaki wuta na bikolo nyonso, wuta na este, na weste, na nor mpe na sude.

[4] Ndambo bazalaki koyengayenga na esobe, na esika oyo ezanga bato, bamonaki te nzela ya engumba epai wapi bakoki kovanda.

[5] Likolo ya nzala mpe ya posa ya mayi, bakomaki pene ya kokufa.

[6] Bongo kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe akangolaki bango na mitungisi na bango.

[7] Atambolisaki bango na nzela ya alima mpo ete bakende kovanda kati na engumba.

[8] Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !

[9] Apesaki mayi epai ya bato oyo bazalaki na posa ya mayi mpe bilei epai ya bato oyo bazalaki na nzala.

[10] Bato oyo bazalaki kovanda na bisika ya molili makasi mpe ya molili ya kufa bazalaki ya kokangama na minyoko mpe na minyololo ya bibende,

[11] pamba te batombokelaki maloba na Nzambe mpe batiolaki mabongisi ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.

[12] Abukaki lolendo ya mitema na bango na nzela ya misala makasi ; bakweyaki, mpe moko te asungaki bango.

[13] Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.

[14] Abimisaki bango wuta na molili makasi mpe na molili ya kufa, mpe abukaki minyololo na bango.

[15] Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !

[16] Pamba te abukaki bikuke ya bronze mpe akataki bikangelo ya mabende.

[17] Bamosusu bakomaki bazoba mpo na etamboli mabe na bango, mpe bato na pasi, mpo na masumu na bango.

[18] Minoko na bango eyinaki bilei nyonso, mpe bakomaki pene ya bikuke ya kufa.

[19] Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.

[20] Atindaki Liloba na Ye mpe abikisaki bango, akangolaki bango wuta na kunda.

[21] Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !

[22] Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondi mpe bapanza sango ya misala na Ye na koganga na esengo !

[23] Bato oyo bakendaka mobembo na ebale monene kati na masuwa mpe basalaka mombongo na mayi minene

[24] bamonaki misala ya Yawe, mpe bikamwa kati na ebale monene.

[25] Alobaki, mpe mopepe makasi eyaki, etombolaki bambonge.

[26] Bazalaki komata kino na likolo mpe kokita kino na se, bazalaki kolemba nzoto kati na pasi.

[27] Bazwaki kizunguzungu mpe bakomaki kotenga-tenga lokola bato balangwe masanga, bwanya na bango nyonso elimwaki.

[28] Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe mpe abimisaki bango na mitungisi na bango.

[29] Akitisaki mopepe makasi, bambonge ya ebale monene evandaki kimia.

[30] Basepelaki na kimia oyo ezongaki, mpe Nzambe amemaki bango kino na libongo oyo balingaki.

[31] Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !

[32] Tika ete banetola Ye kati na lisanga ya bato mpe bakumisa Ye kati na mayangani ya bakambi.

[33] Akoki kobongola bibale esobe ; kobongola bitima mabele ya kokawuka ;

[34] kobongola mabele oyo ebotaka bambuma mabele ya mungwa likolo ya mabe ya bavandi na yango.

[35] Akoki kobongola esobe liziba ; kobongola mabele ya kokawuka bitima.

[36] Akoki kosala ete bato na nzala bakoma kovanda kuna, batonga engumba oyo bato bakoki kovanda,

[37] babwaka bambuma na bilanga mpe balona banzete ya vino oyo ekobota bambuma ebele.

[38] Apamboli bango, mpe bakomi ebele ; mpe akitisi te motango ya bibwele na bango.

[39] Motango ya bato mosusu ekiti mpe balembi nzoto mpo na minyoko mpe pasi.

[40] Nzambe asambwisaka bato minene, akotisaka bango na mobulu makasi kino bazanga nzela ya kobimela na pasi.

[41] Kasi akangolaka babola wuta na pasi na bango, mpe asalaka ete babotana ebele kati na bituka na bango lokola etonga ya bameme.

[42] Tango bato ya sembo bamonaka bongo, basepelaka, kasi bato nyonso ya mabe bakangaka minoko na bango.

[43] Tika ete moto ya bwanya asala keba na makambo wana nyonso mpe akanisa na tina na bolingo ya Yawe !

Banzembo — Chapters