Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:10

[1] Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa.

[2] Yawe, kopamela ngai te kati na kanda na Yo to kopesa ngai etumbu te kati na kanda makasi na Yo.

[3] Pamba te makonga na Yo etoboli ngai, mpe loboko na Yo ebeti ngai.

[4] Mpo na kanda na Yo, nzoto na ngai ebeli ; mpo na masumu na ngai, mikuwa na ngai elembi.

[5] Mabe na ngai eleki moto na ngai, ezali kilo makasi epai na ngai lokola mokumba ya kilo makasi.

[6] Bapota na ngai epoli mpe ekomi kolumba solo mpo na bozoba na ngai.

[7] Nagumbami, nalembi makasi ; nakomi moto ya mawa mpo na libela.

[8] Pamba te nazali koyoka pasi makasi na mokongo na ngai, eteni ata moko te ya nzoto na ngai ezali malamu.

[9] Nalembi, makasi na ngai nyonso esili ; mobulu ekoti na motema na ngai, nakomi koganga na kolemba te.

[10] Nkolo, oyebi posa na ngai nyonso ; kolela na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.

[11] Motema na ngai ezangi kimia, makasi na ngai ekomi kosila, nabungisi ata pole ya miso na ngai.

[12] Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai bakimi pasi na ngai, ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.

[13] Bato oyo balukaka kufa na ngai bazali kotia mitambo, ba-oyo balukaka pasi na ngai bazali koloba mpo na kosala ngai mabe, bakomi mikolo nyonso kobongisa lokuta.

[14] Kasi ngai nazali kosala lokola mokufi matoyi ; mpe lokola baba, nakangi monoko, naboyi koloba.

[15] Nakomi lokola mokufi matoyi oyo akoki kopesa eyano ata moko te na monoko na ye.

[16] Yawe, natiaka elikya na ngai kati na Yo ; oh Nkolo, Nzambe na ngai, solo, okoyanola.

[17] Nalobaki : « Kopesa nzela te ete basepela na tina na ngai to bamitombola likolo na ngai soki nabeti libaku. »

[18] Pamba te nakomi pene ya kokweya, pasi na ngai ezali kaka elongo na ngai tango nyonso.

[19] Solo nandimi mabe na ngai, masumu na ngai ezali kotungisa molimo na ngai.

[20] Banguna na ngai bazali makasi mpe bingambe, bato oyo bayinaka ngai kaka pamba bazali ebele.

[21] Bato oyo bazongisaka mabe na bolamu bazali kofunda ngai atako nalukaka kosala bolamu.

[22] Yawe, kosundola ngai te ; Nzambe na ngai, kozala mpe mosika na ngai te.

[23] Nkolo, Mobikisi na ngai, yaka noki kosunga ngai.

Banzembo — Chapters