[1] Eh molimo na ngai, pambola Yawe ! Yawe, Nzambe na ngai, ozali monene ! Olata kongenga mpe lokumu,
[2] omifinika moyi lokola kazaka, otanda likolo lokola ndako ya kapo.
[3] Opika makonzi na yango na mayi ya likolo, okomisaka mapata shar na Yo, otambolaka na mapapu ya mopepe.
[4] Okomisaka bantoma na Yo mipepe, mpe basali na Yo, ndemo ya moto.
[5] Otia mokili na likolo ya miboko na yango mpo ete eningana te seko na seko.
[6] Ozipa yango na mayi monene lokola elamba ; mayi ezalaki kovanda na likolo ya bangomba.
[7] Kasi na pamela na Yo, mayi ekimaki ; na lokito ya kake na Yo, mayi etiolaki,
[8] emataki na likolo ya bangomba, ekitaki na mabwaku, na bisika oyo obongisaki mpo na yango.
[9] Otiaki mondelo oyo ekoki koleka te ; ekozonga lisusu te kozipa mokili.
[10] Obimisaka mayi ya bitima mpo na kosopa yango na mayi minene oyo elekaka na kati-kati ya bangomba ;
[11] ekomaka mayi ya komela mpo na banyama nyonso ya bilanga mpe mpo na ba-ane ya zamba.
[12] Bandeke ya likolo evandaka pembeni ya mayi yango mpe eyembaka kati na makasa.
[13] Wuta na bandako na Yo ya likolo, onokisaka mvula na likolo ya bangomba ; mokili etondi na mbuma ya misala na Yo.
[14] Matiti ebotaka mpo na bibwele, mpe milona ya bato ekolaka mpo ete mabele ebotela bango bilei,
[15] vino mpo na kosepelisa mitema na bango, mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango, mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.
[16] Banzete ya Yawe etondi na mayi ; ndenge wana nde ezali, banzete ya sedele ya Libani, oyo Yawe alona.
[17] Bandeke esalaka bazala na yango kuna, mpe nkoko evandaka na banzete ya sipele.
[18] Bangomba milayi ezali ekimelo mpo na bantaba ya zamba, mpe madusu ya mabanga ezali bibombamelo mpo na bampanya ya zamba.
[19] Osala sanza mpo na koyeba mikolo ya bafeti. Moyi eyebi tango na yango ya kolala.
[20] Otindaka molili, mpe butu ekomaka. Bongo banyama nyonso ya zamba ekomaka kotambola-tambola.
[21] Bana ya nkosi egangaka sima na nyama mpe esengaka bilei epai ya Nzambe.
[22] Soki moyi ebimi, nkosi elongwaka, ezongaka mpo na kolala na bisika na yango ;
[23] kasi moto abimaka mpo na kokende na mosala na ye mpe asalaka kino na pokwa.
[24] Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele ! Osalaki nyonso na bwanya ; mokili etondi na biloko oyo okela.
[25] Tala ndenge ebale monene ezali molayi mpe epanzana, etonda na banyama oyo tokoki kotanga te, kobanda na oyo eleki mike kino na oyo eleki minene.
[26] Kuna, bamasuwa ekendeke mpe ezongaka ; bongo Leviatani oyo osala mpo ete esakanaka kuna.
[27] Nyonso etalelaka Yo mpo ete opesa yango bilei na tango oyo ekoki.
[28] Opesaka bilei, mpe ezwaka yango ; ofungolelaka yango loboko na Yo, mpe etondaka na biloko.
[29] Tango obombaka elongi na Yo, somo ekangaka yango ; tango olongolaka yango pema, ekufaka mpe ezongaka na putulu ;
[30] tango otindaka pema Yo, ezwaka bomoi ; mpe okomisaka mokili sika.
[31] Tika ete nkembo ya Yawe ewumela libela na libela ! Tika ete Yawe asepela na misala na Ye !
[32] Soki atali mokili, mokili elengaka ; soki asimbi bangomba, ebimisaka milinga.
[33] Nakoyembela Yawe bomoi na ngai mobimba ; nakoyembela Nzambe na ngai tango nyonso nazali na bomoi.
[34] Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye ! Tika ete Yawe azala esengo na ngai !
[35] Tika ete bato ya masumu basila na mokili, mpe bato mabe bazala lisusu te ! Oh molimo na ngai, pambola Yawe ! Aleluya, bokumisa Yawe !