Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:26

[1] Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe abatelaki biso te ; tika ete Isalaele aloba bongo !

[2] Soki Yawe abatelaki biso te tango bato babundisaki biso,

[3] mbele bamelaki biso ya bomoi tango basilikelaki biso makasi.

[4] Boye mayi elingaki kozindisa biso, mbonge makasi elingaki komema biso.

[5] Mayi makasi elingaki kozindisa biso.

[6] Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso !

[7] Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo ya mokangi bandeke ; motambo ekatanaki, mpe tokimaki.

[8] Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.

Banzembo — Chapters