Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:22

[1] Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.

[2] Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo, azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.

[3] Yango wana, tobangaka te ata soki mabele eningani, bangomba ekweyi kati na ebale monene ;

[4] ata soki bambonge na yango etelemi, ebimisi fulufulu mpe eningisi bangomba.

[5] Ezali na ebale moko oyo mayi na yango esepelisaka engumba ya Nzambe oyo eleki bule kati na bivandelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.

[6] Nzambe azali kati na yango, ebukani te ; Nzambe asungaka yango wuta na tongo makasi.

[7] Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya ; kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye, mpe mabele ebukani.

[8] Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso ; Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso.

[9] Boya kotala misala ya Yawe, makambo minene oyo asalaka kati na mokili.

[10] Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili, akataka batolotolo, abukaka makonga mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.

[11] Alobaki : « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe ; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »

[12] Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso ; Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso.

Banzembo — Chapters