Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:22

[1] Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye ! Bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo !

[2] Boyemba mpo na lokumu na Ye, bosanzola Ye na mindule ! Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso !

[3] Bosepela na Kombo na Ye ya bule ! Tika ete mitema ya bato oyo balukaka Yawe etonda na esengo !

[4] Bomipesa na Yawe. Bosenga makasi na Ye. Bolukaka tango nyonso elongi na Ye.

[5] Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki mpe bitumbu oyo apesaki,

[6] bino, bakitani ya Abrayami, mosali na Ye ; bino, baponami na Ye, bana mibali ya Jakobi !

[7] Yawe azali Nzambe na biso, mikano na Ye ekambaka mokili mobimba.

[8] Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye, bilaka na Ye mpo na bikeke nkoto moko,

[9] boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami, mpe ndayi oyo alapaki epai ya Izaki.

[10] Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobi lokola mobeko, epai ya Isalaele lokola boyokani ya libela na libela,

[11] tango alobaki : « Nakopesa yo mokili ya Kanana lokola libula oyo epesameli yo ! »

[12] Na tango wana, bazalaki kaka motango moke ya bato mpe bapaya kati na yango ;

[13] bazalaki koyengayenga longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu, longwa na mokili moko kino na mokili mosusu.

[14] Atikaki moto moko te konyokola bango ; apamelaki bakonzi na tina na bango :

[15] « Bosimba bapakolami na Ngai te, bosala mabe te epai na basakoli na Ngai ! »

[16] Abengisaki nzala makasi kati na mboka, azangisaki bango bilei.

[17] Atindaki moto moko liboso na bango : Jozefi oyo atekamaki lokola mowumbu.

[18] Bakangaki makolo na ye na minyololo mpe batiaki bibende na kingo na ye,

[19] kino makambo oyo Jozefi asakolaki ekokisamaki, kino Liloba na Yawe etalisaki ete Jozefi alobaki solo.

[20] Mokonzi apesaki mitindo ete bafungola ye minyololo, mokambi atikaki ye na bonsomi.

[21] Akomisaki ye nkolo ya ndako na ye mpe moyangeli ya biloko na ye nyonso,

[22] mpo ete akonza bakambi na ye mpe alakisa bwanya epai ya bapesi toli ya mokonzi.

[23] Bongo Isalaele akendeki na Ejipito ; mpe Jakobi avandaki lokola mopaya kati na mokili ya Cham.

[24] Yawe asalaki ete bato na Ye babota mingi, mpe akomisaki bango makasi koleka banguna na bango.

[25] Abongolaki mitema ya banguna yango mpo ete bayina bato na Ye mpe banyokola bango makasi.

[26] Atindaki mosali na Ye, Moyize, mpe Aron oyo aponaki.

[27] Na mitindo na Ye Nzambe, basalaki bikamwa kati na Ejipito, misala minene kati na mokili ya Cham.

[28] Atindaki molili oyo ekotaki kati na mokili, mpe bato ya Ejipito batombokelaki maloba na Ye te.

[29] Abongolaki mayi makila, mpe abomaki mbisi na yango.

[30] Mokili na bango etondaki na magorodo kino na bashambre ya mokonzi na bango.

[31] Na mitindo na Ye, banzinzi oyo eswaka mpe bangungi eyaki na mboka mobimba.

[32] Na esika ya mvula, atindelaki bango mvula ya mabanga mpe abetisaki kake kati na mokili na bango.

[33] Abebisaki bilanga na bango ya vino mpe ya figi, mpe abukaki banzete ya mboka na bango.

[34] Na mitindo na Ye, mabanki mpe makelele oyo bakokaki kotanga te esopanaki,

[35] eliaki matiti nyonso ya mobesu kati na mokili na bango, eliaki bambuma ya mabele na bango.

[36] Abomaki bana liboso nyonso kati na mokili na bango, bambuma ya liboso ya makasi na bango.

[37] Abimisaki Isalaele, bato na Ye, elongo na palata mpe wolo ; mpe moko te atiaki tembe kati na mabota na bango.

[38] Ejipito esepelaki komona bango kobima, pamba te somo ya Isalaele ekangaki bango.

[39] Atandaki lipata mpo na kobatela bango, mpe moto mpo na kopesa pole na butu.

[40] Ndenge kaka basengaki, atindelaki bango bakayi mpe atondisaki bango na bilei ya likolo.

[41] Afungolaki libanga, mpe mayi ebimaki, etiolaki lokola ebale kati na esobe.

[42] Mpo ete akanisaki elaka ya bule oyo apesaki mosali na Ye, Abrayami,

[43] abimisaki na esengo bato na Ye, baponami na Ye na koganga ya esengo.

[44] Apesaki bango mabele ya bikolo mosusu mpe bazwaki lokola libula mosala ya bikolo yango

[45] mpo ete babatela mitindo na Ye mpe batosa mibeko na Ye. Bokumisa Yawe !

Banzembo — Chapters