[1] Nzembo ya Davidi.
[2] Nzambe, motema na ngai ezali na kimia ! Nakoyembela Yo, nakosanzola Yo na mindule ; ezali mpe lokumu na ngai.
[3] Lindanda mpe nzenze, bolamuka ! Nalingi kolamusa tongo.
[4] Nkolo, nakosanzola Yo kati na bato, nakoyembela Yo kati na bikolo.
[5] Pamba te bolingo na Yo ezali monene koleka Lola, mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.
[6] Oh Nzambe, tika ete otombolama na likolo ya Lola, mpe nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !
[7] Bikisa biso na nguya ya loboko na Yo mpe yanola biso, mpo ete balingami na Yo bakangolama !
[8] Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule : « Nakolonga ! Nakokabola Sishemi mpe nakotia bandelo ya lubwaku ya Sukoti.
[9] Galadi ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai ; Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende, mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.
[10] Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Nazali kobeta milolo ya bitumba mpo na kobundisa mokili ya Filisitia. »
[11] Nani akomema ngai na engumba batonga makasi ? Nani akotambolisa ngai kino na Edomi ?
[12] Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso, Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba elongo na mampinga na biso !
[13] Yaka kosunga biso, kangola biso liboso ya moyini ! Pamba te lisungi ya bato ezali pamba.
[14] Elongo na Nzambe, tokosala makambo minene mpe ya kokamwa ; ezali Ye nde akonyata banguna na biso.