Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:14

[1] Yawe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, mimonisa kati na nkembo na Yo !

[2] Mosambisi ya mokili, telema mpo na kozongisela bato ya lolendo mabe na mabe na bango !

[3] Yawe, kino tango nini bato mabe, kino tango nini bato mabe bakosepela ?

[4] Bazali komilakisa, bazali kobimisa mafinga ; bato nyonso ya misala mabe bazali komikumisa !

[5] Yawe, bazali konyokola bato na Yo mpe bazali koyokisa libula na Yo pasi ;

[6] bazali koboma mwasi oyo akufisa mobali, mopaya mpe bana bitike ;

[7] bazali koloba : « Yawe amonaka eloko moko te, Nzambe ya Jakobi asosolaka eloko moko te ! »

[8] Bino bato ya kilikili, bososola ! Bazoba, bokokoma mayele tango nini ?

[9] Boni, Ye oyo asala litoyi akoki koyoka te ? Ye oyo asala liso akoki komona te ?

[10] Ye oyo apesaka bikolo etumbu akoki kopesa etumbu te ? Ye oyo apesaka bato boyebi.

[11] Yawe ayebi makanisi ya bato ; ayebi ete ezali na tina te.

[12] Yawe, esengo na moto oyo ozali kozongisa na nzela, moto oyo ozali kolakisa mibeko na Yo

[13] mpo na kopesa ye bopemi na tango ya pasi, kino libulu etimolama mpo na moto mabe !

[14] Pamba te Yawe asundolaka bato na Ye te, abwakaka libula na Ye te.

[15] Bakosambisa lisusu kolanda bosembo, mpe bato nyonso oyo bazali na mitema alima bakotosa bosembo yango.

[16] Nani akotelema mpo na ngai mpo na kotelemela bato mabe ? Nani akokotela ngai liboso ya bato ya misala mabe ?

[17] Ah, soki Yawe asungaki ngai te, mbele nakendeki noki na mokili ya kufa !

[18] Soki nalobi : « Makolo na ngai ekomi kolenga na somo, » bolingo na Yo, Yawe, epesaka ngai makasi.

[19] Soki natungisami na makanisi ebele, kobondisama na Yo epesaka ngai esengo.

[20] Boni, bokonzi ya mabe oyo ememelaka bato pasi na nzela ya mibeko na yango ; boni, ezali lisanga moko elongo na Yo ?

[21] Bato mabe basanganaka mpo na kobundisa bomoi ya moto ya sembo mpe kokatela moto oyo asali mabe te etumbu ya kufa.

[22] Kasi Yawe azali, mpo na ngai, ndako batonga makasi ; Nzambe na ngai azali libanga epai wapi nazwaka ebombamelo.

[23] Akozongisela bango mabe na bango mpe akobebisa bango mpo na kanza na bango. Solo, Yawe, Nzambe na ngai, akoboma bango.

Banzembo — Chapters