Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:29

[1] Bokumisa Yawe ! Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye ; bokumisa Yawe !

[2] Tika ete Kombo ya Yawe epambolama kobanda sik’oyo kino libela na libela !

[3] Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama !

[4] Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso, nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.

[5] Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi kati na bisika oyo eleki likolo ?

[6] Agumbamaka mpo na kotala likolo mpe mokili.

[7] Wuta na putulu, atombolaka moto oyo akelela ; wuta na fulu ya matiti, abimisaka mobola

[8] mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi, na bankumu ya bato na Ye.

[9] Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe !

Banzembo — Chapters