[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo. Bino bato ya mokili mobimba, bobetela Nzambe maboko !
[2] Boyemba banzembo ya lokumu mpo na nkembo ya Kombo na Ye, bopesa lokumu na Ye nkembo.
[3] Boloba na Nzambe : « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango ! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.
[4] Mokili mobimba efukamaka liboso na Yo ; bayembaka mpo na lokumu na Yo, basanzolaka Kombo na Yo. »
[5] Boya kotala misala ya Nzambe ! Misala na Ye ya minene mpo na bana ya bato ebongi na kobanga yango.
[6] Abongolaki ebale monene mabele ya kokawuka ; bakatisaki ebale na makolo ekawuka. Tozali kosepela kati na Ye.
[7] Na nguya na Ye, akonzaka mpo na libela ; miso na Ye ekengelaka bikolo. Tika ete batomboki batombokela Ye te.
[8] Bino bikolo, bopambola Nzambe na biso ! Bosala ete lokito ya masanzoli na Ye eyokana !
[9] Asalaka ete totangama kati na bato ya bomoi. Abatelaki makolo na biso mpo ete tokweya te.
[10] Pamba te, Nzambe, omekaki biso, olekisaki biso kati na moto ndenge basalaka mpo na palata.
[11] Okangaki biso kati na motambo ; otiaki mikumba ya kilo, na baloketo na biso.
[12] Otikaki moto komatela biso na moto. Tolekaki kati na moto mpe kati na mayi, mpe obimisaki biso kati na yango mpo na komema biso na bofuluki.
[13] Nakokota kati na Ndako na Yo, nakomemela Yo makabo ya kotumba, nakokokisa bandayi na ngai epai na Yo.
[14] Bandayi oyo bibebu na ngai moko etatolaki mpe monoko na ngai elobaki na tango nazalaki kati na pasi.
[15] Lokola bambeka ya kotumba, nakobonzela Yo banyama minene, bameme elongo na bambeka ya malasi ; nakobonzela Yo bangombe mpe bantaba ya mibali.
[16] Bino nyonso oyo botosaka Nzambe, boya koyoka ! Nakoyebisa bino makambo oyo asali mpo na bomoi na ngai.
[17] Nabelelaki Ye na monoko na ngai, mpe lolemo na ngai ekumisaki Ye.
[18] Soki nazalaki na masumu kati na motema na ngai, Nkolo alingaki koyoka ngai te.
[19] Nzokande, Nzambe ayokaki ngai, ayokaki na bokebi libondeli na ngai.
[20] Tika ete Nzambe akumisama ! Aboyaki te koyoka libondeli na ngai mpe kotalisa ngai bolingo na Ye.