[1] Boya, toganga na esengo mpo na Yawe ! Tobetela Libanga na biso maboko, pamba te azali Mobikisi na biso !
[2] Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo.
[3] Pamba te Yawe azali Nzambe Monene, azali Mokonzi Monene, na likolo ya banzambe nyonso.
[4] Asimbi mozindo ya mokili kati na loboko na Ye ; mpe basonge ya bangomba ezali ya Ye.
[5] Ebale monene ezali ya Ye, azali Mokeli na yango ; mabele ya kokawuka ezali mpe ya Ye, asala yango na maboko na Ye.
[6] Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso !
[7] Pamba te azali Nzambe na biso ; tozali bato oyo aleisaka, etonga oyo abatelaka. Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
[8] « boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki na Meriba ; ndenge bosalaki na mokolo wana ya Masa kati na esobe
[9] epai wapi batata na bino batombokelaki ngai mpe bamekaki ngai atako bamonaki ngai kosala.
[10] Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki : ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. ›
[11] Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka : ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › »