Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:05

[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

[2] Tika ete Yawe ayanola yo na tango ya pasi ; tika ete Nzambe ya Jakobi azala ndako batonga makasi mpo na kobatela yo.

[3] Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule mpe apesa yo makasi wuta na Siona.

[4] Tika ete akanisa makabo na yo nyonso mpe andima mbeka na yo ya kotumba.

[5] Tika ete akokisa posa ya motema na yo mpe mabongisi na yo nyonso.

[6] Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yo mpe tokotombola bendele na Kombo ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso.

[7] Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.

[8] Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar, bamosusu, kati na bampunda ; kasi biso totiaka elikya na biso kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.

[9] Bango, bafukamaka mpe bakweyaka ; kasi biso, tozalaka kaka ya kotelema mpe totikalaka ngwi.

[10] Yawe, bikisa mokonzi ! Yanola biso tango tozali kobelela.

Banzembo — Chapters