[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya mawa oyo Davidi ayembelaki Yawe na tina na Kushi, moto ya libota ya Benjame.
[2] Yawe, Nzambe na ngai, nabombamaka kati na Yo ; bikisa ngai mpe kangola ngai liboso ya bato nyonso oyo balukaka koboma ngai.
[3] Soki te, bakopasola ngai lokola nkosi mpe bakokata ngai na biteni, mpe moto akozala te mpo na kosunga ngai.
[4] Yawe, Nzambe na ngai, soki nasalaki makambo oyo bazali kopamela ngai mpo na yango, mpe soki ezali na mabe na maboko na ngai,
[5] soki nasalaki moninga na ngai mabe, soki nabotolaki na makasi mpe kaka na pamba, biloko ya moyini na ngai ;
[6] wana tika ete monguna na ngai alanda mpe akanga ngai, tika ete asakanela bomoi na ngai mpe abebisa lokumu na ngai.
[7] Yawe, telema na kanda na Yo, telemela kotomboka ya banguna na ngai. Nzambe na ngai, telema, kata likambo na ngai.
[8] Tika ete bikolo esangana zingazinga na Yo, kasi Yo, konza bango wuta na Kiti na Yo ya Bokonzi.
[9] Tika ete Yawe asambisa bikolo. Yawe, longisa ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bozangi pamela na ngai, Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
[10] Yo Nzambe ya sembo oyo ososolaka mozindo ya mayele mpe ya mitema, sukisa kanza ya bato mabe mpe yikisa moto ya sembo mpiko.
[11] Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali nguba na ngai, abikisaka bato ya sembo.
[12] Nzambe azali Mosambisi ya sembo, asilikaka mikolo nyonso.
[13] Soki alembisi kanda na Ye te, akopelisa minu ya mopanga na Ye, akobongisa mpe akobeta tolotolo na Ye.
[14] Abongisaka bibundeli oyo ebomaka mpe asalaka ete makonga na Ye ekoma kozikisa.
[15] Moto nyonso oyo abongisaka kosala mabe alukaka ndenge nini koyokisa bato pasi mpe abebisaka boyokani ;
[16] atimolaka libulu, kasi ye moko nde akweyaka kati na yango.
[17] Pasi oyo ayokisaka bato ezongelaka ye moko, mpe mabe na ye ekweyaka na moto na ye moko.
[18] Nakokumisa Yawe mpo na bosembo na Ye, mpe nakosanzola Yawe-Oyo-Aleki-Likolo na banzembo.