Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:33

[1] Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.

[2] Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni ! Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai !

[3] Ebele bazali koloba na tina na ngai : « Nzambe akobikisa ye te ! »

[4] Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai.

[5] Nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai wuta na ngomba na Ye ya bule.

[6] Nalalaka mpe nazwaka pongi ; nalamukaka lisusu, pamba te Yawe azali makasi na ngai.

[7] Nakobanga te atako ebele ya bankoto bazingeli ngai na bangambo nyonso.

[8] Yawe, telema ! Nzambe na ngai, kangola ngai ! Beta banguna na ngai nyonso bambata, buka bato mabe minu.

[9] Kokangolama na ngai ewutaka na Yawe. Tika ete lipamboli na Yo ewumela kati na bato na Yo.

Banzembo — Chapters