Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:45

[1] Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele. Tika ete Isalaele ezongela koloba :

[2] « Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele, kasi batikali kolonga ngai te ! »

[3] Bato mabe batimoli mokongo na ngai, bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo.

[4] Kasi lokola Yawe azali sembo, akati basinga ya bato mabe.

[5] Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona bakufa soni mpe bazonga sima !

[6] Tika ete bakoma lokola matiti oyo ebotaka na likolo ya ndako mpe ekawukaka liboso ete balongola yango ;

[7] tika ete mobuki bambuma ya bilanga atondisa na yango te maboko na ye, tika ete mokangi maboke ya banzete atondisa na yango te saki na ye.

[8] Tika ete baleki nzela baloba na bango te : « Tika ete Yawe apambola bino ! » Topamboli bino na Kombo na Yawe !

Banzembo — Chapters