Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:41

[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. »

[2] Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai ? Mpo na nini otelemi mosika ? Mpo na nini ozali kobikisa ngai te ? Mpo na nini ozali koyoka te koganga na ngai ?

[3] Nzambe na ngai, na moyi, nabeleli Yo, kasi oyanoli ngai te ; na butu, nabeleli lisusu, mpe natikali kovanda nye te.

[4] Nzokande, ozali Mosantu, ovandaka na Kiti na Yo ya Bokonzi, kati na masanzoli ya Isalaele.

[5] Batata na biso batiaki elikya na bango kati na Yo, bamipesaki epai na Yo, mpe okangolaki bango.

[6] Bagangaki epai na Yo, mpe Yo okangolaki bango ; batiaki elikya na bango kati na Yo mpe bayokisamaki soni te.

[7] Nazali lisusu moto te, kasi mutsopi ; bato nyonso bazali kofinga mpe kotiola ngai.

[8] Bato nyonso oyo bazali komona ngai bazali koseka ngai, bazali kokamwa, koningisa mito mpe koloba :

[9] « Atiaka motema na ye epai na Yawe ; tika ete Yawe abikisa ye ! Tika ete Yawe akangola ye, pamba te asepelaka na Ye ! »

[10] Solo, Yawe, obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai, obatelaki ngai na kimia na tolo na ye.

[11] Wuta mbotama na ngai, batikaki ngai na maboko na Yo ; wuta libumu ya mama na ngai, ozali Nzambe na ngai.

[12] Kozala mosika na ngai te, pamba te pasi ekomi pene mpe nazangi moto oyo akosunga ngai.

[13] Banguna na ngai bazingeli ngai lokola lisanga ya bangombe ya mibali, bazingeli ngai lokola banyama mabe oyo ezalaka na Bashani ;

[14] mpe bafungoleli ngai makasi minoko na bango lokola nkosi oyo etomboki mpe ezali kolia nyama.

[15] Nakomi lokola mayi oyo ezali kosopana, mpe mikuwa na ngai nyonso ekabwani ; motema na ngai ekomi lokola mafuta oyo ezali konyangwama kati na ngai.

[16] Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto, mpe nazali kokoka lisusu koloba te ; otie ngai pembeni ya lilita.

[17] Bambwa ezingeli ngai, ngulupa ya bato mabe bayei kobundisa ngai, bazali kotambola zingazinga na ngai ; bakangi maboko mpe makolo na ngai na basinga.

[18] Nakoki sik’oyo kotanga ata mikuwa na ngai nyonso ; kasi bato bazali kotala mpe koseka ngai,

[19] bazali kokabola bilamba na ngai mpe kobeta zeke mpo na nzambala na ngai.

[20] Kasi Yo, Yawe, kozala mosika te ! Ozali makasi na ngai ; yaka noki kosunga ngai.

[21] Bikisa bomoi na ngai liboso ya mopanga, mpe kangola yango wuta na manzaka ya bambwa.

[22] Bikisa ngai wuta na monoko ya nkosi mpe na maseke ya mpakasa.

[23] Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na ngai, mpe nakokumisa Yo kati na mayangani.

[24] Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye ! Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu ! Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye !

[25] Pamba te Yawe atiolaki te mpe abwakaki te mobola ; apesaka ye mokongo te mpe ayokaka ye tango asengaka lisungi.

[26] Na ngolu na Yo, nakumisaka Yo kati na mayangani, nakokisaka bandayi na ngai na miso ya bato oyo batosaka Yo.

[27] Babola bakolia mpe bakotonda ; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.

[28] Mokili mobimba ekokanisa Yawe, ekomipesa epai na Ye ; mpe bituka nyonso ya bikolo ekogumbama liboso na Ye.

[29] Pamba te Yawe azali Mokonzi, azali kokonza bikolo.

[30] Bazwi nyonso ya mokili bakolia mpe bakogumbamela Ye ; bato nyonso oyo bazali kokende na kunda, ba-oyo bakoki te komibatela na bomoi, bakogumbama liboso na Ye.

[31] Bakitani na bango bakosalela Yawe mpe bakopanza sango na Ye epai ya ekeke oyo ekoya na sima ;

[32] bakosakola misala ya bosembo na Ye, epai ya bato oyo bakobotama.

Banzembo — Chapters