Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:41

[1] Losambo ya Moyize, moto na Nzambe. Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso, na bikeke nyonso.

[2] Liboso ete bangomba ezala, liboso ete okela mabele mpe mokili, libela na libela, ozali Nzambe.

[3] Ozongisaka moto na putulu, pamba te oloba : « Bino bato, bozonga na putulu ! »

[4] Na miso na Yo, mibu nkoto moko ezali lokola mokolo ya lobi oyo esili koleka, lokola ngonga moko ya butu.

[5] Olekisaka yango lokola pongi ya butu, oyo na tongo, esilaka lokola lititi.

[6] Na tongo, ebimisaka fololo mpe etelaka noki ; kasi na pokwa, enzulukaka mpe ekawuki.

[7] Kanda na Yo elembisaka biso nzoto, mpe kanda makasi na Yo epesaka biso bobangi.

[8] Otiaka masumu na biso liboso na Yo mpe obimisaka na polele makambo oyo tobombaka.

[9] Mikolo nyonso ya bomoi na biso elimwaka mpo na kanda na Yo, mpe mibu na biso esilaka lokola kolela.

[10] Molayi ya bomoi na biso ekoki kozala mibu tuku sambo to mibu tuku mwambe mpo na bato oyo baleki makasi ; nzokande, etondi na pasi mpe na minyoko, pamba te elekaka noki, mpe tolimwaka.

[11] Nani ayebi makasi ya kanda na Yo ? Moto oyo azalaka na botosi mingi epai na Yo asosolaka malamu kanda makasi na Yo.

[12] Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.

[13] Yawe, lembisa moke ! Kino tango nini ekowumela ? Yokela basali na Yo mawa !

[14] Tongo nyonso, tondisaka biso na bolingo na Yo mpe tokoganga na esengo, mpe tokosepela mikolo nyonso ya bomoi na biso.

[15] Zongisela biso na mikolo ya esengo, mikolo oyo onyokolaki biso ; zongisela biso na mibu ya esengo, mibu oyo tomonaki pasi.

[16] Tika ete biso, basali na Yo, tomona misala na Yo ; mpe ete bana na biso bamona kongenga makasi ya nkembo na Yo !

[17] Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso, ezala elongo na biso ! Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso ! Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso !

Banzembo — Chapters