[1] Nzembo ya Davidi. Kosilikela bato ya mabe te, kosalela bato oyo basalaka mabe zuwa te ;
[2] pamba te bakokawuka noki lokola makasa, mpe bakolemba noki lokola matiti.
[3] Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu, vanda kati na mokili mpe lia na kimia.
[4] Komisa Yawe bilengi na yo ya makasi, mpe akokokisela yo posa ya motema na yo.
[5] Kaba bomoi na yo epai na Yawe, tia elikya kati na Ye, mpe akosala :
[6] akongengisa bosembo na yo lokola pole, makoki na yo lokola moyi ya midi.
[7] Batela kimia liboso ya Yawe mpe talela Ye ; kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye, mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.
[8] Boya kanda mpe kosilika te ; kotomboka te, noki te okosala mabe.
[9] Pamba te bato oyo basalaka mabe bakolimwa, kasi bato oyo batielaka Yawe motema bakozwa mokili lokola libula na bango.
[10] Etikali tango moke kaka, moto mabe akozala lisusu te ; ata oluki ye, okomona ye te.
[11] Kasi bato oyo bamikitisa bakozwa mokili lokola libula na bango mpe bakozala na kimia makasi.
[12] Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita mpe baliaka minu mpo na kotelemela bango.
[13] Kasi Yawe asekaka bato mabe, pamba te ayebi ete mokolo na bango ezali kobelema.
[14] Bato mabe babimisi mipanga mpe babongisi batolotolo mpo na kokweyisa mobola mpe moto oyo akelela, mpo na koboma bato oyo batambolaka alima.
[15] Kasi mipanga na bango ekotobola mitema na bango moko, mpe batolotolo na bango ekobukana.
[16] Mwa biloko ya moto ya sembo eleki bozwi ya bato ebele ya mabe,
[17] pamba te nguya ya bato mabe ekosila, kasi Yawe alendisaka bato ya sembo.
[18] Yawe ayebi mikolo ya bato bazangi pamela, mpe libula na bango ekowumela mpo na seko.
[19] Na tango ya pasi, bakokawuka te ; na mikolo ya nzala, bakozala na bilei ebele.
[20] Kasi bato mabe bakokufa, banguna ya Yawe bazali lokola fololo ya elanga, bakolimwa lokola molinga.
[21] Moto mabe adefaka mpe azongisaka te, kasi moto ya sembo ayokaka mawa mpe akabaka.
[22] Bato oyo Yawe apambolaka bakozwa mokili lokola libula na bango, kasi ba-oyo alakelaka mabe bakolimwa.
[23] Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto, alendisaka bomoi na ye ;
[24] ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te ; pamba te Yawe asimbaka ye na loboko.
[25] Nazalaki elenge, mpe sik’oyo nakomi mobange, namoni nanu te moto ya sembo kosundolama to bana na ye kokoma kosenga-senga bilei.
[26] Akabaka tango nyonso mpe adefisaka, bana na ye bakozalaka kati na mapamboli.
[27] Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, okovanda na mokili mpo na libela ;
[28] pamba te Yawe alingaka bosembo, mpe asundolaka te bayengebene na Ye. Babatelamaka mpo na seko, kasi bana ya bato mabe bakolimwa.
[29] Bato ya sembo bakozwa mokili lokola libula na bango mpe bakovanda kuna seko na seko.
[30] Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya, mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo.
[31] Mobeko ya Nzambe na ye ezali kati na motema na ye, makolo na ye ebetaka libaku te.
[32] Moto mabe atalaka moto ya sembo na miso mabe mpe alukaka nzela ya koboma ye,
[33] kasi Yawe akosundola moto ya sembo te kati na maboko ya moto mabe, mpe akokweyisa ye te na kosambisama.
[34] Zala na elikya kati na Yawe mpe batela nzela na Ye ; akonetola Yo mpo ete ozwa mboka lokola libula na yo, mpe okomona tango bato mabe bakolimwa.
[35] Namonaki moto mabe mpe na kanza kokoma na nguya mpe kofuluka lokola nzete oyo ezali kokola na mabele na yango,
[36] kasi alekaki noki mpe azalaki lisusu te ; nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te.
[37] Tala malamu moto oyo azangi pamela, landela bomoi ya moto ya sembo ; tango oyo ezali koya ezali kozela moto ya kimia.
[38] Kasi batomboki bakobebisama, tango oyo ezali koya ezali te mpo na bato mabe.
[39] Lobiko ya bato ya sembo ewutaka epai ya Yawe oyo, na tango ya pasi, azali ndako na bango, oyo batonga makasi.
[40] Yawe asungaka mpe akangolaka bango, akangolaka bango wuta na maboko ya bato mabe mpe abikisaka bango, pamba te babombamaka kati na Ye.