Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 1:48

[1] Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Bazoba bamilobelaka : « Nzambe azali te. » Makanisi na bango esila kobeba, basalaka makambo ya nkele, mpe moko te asalaka bolamu.

[2] Wuta na Likolo, Yawe atalaka bato mpo na koluka koyeba soki ezali ata na moko oyo azali na mayele, oyo atalelaka Nzambe.

[3] Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa ; moko te asalaka bolamu, ata moto moko te !

[4] Boni, bato wana nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ? Bato baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa, babelelaka Yawe te !

[5] Somo monene ekangi bango, pamba te Nzambe azali kati na bato ya sembo.

[6] Bino, bato ya misala mabe, bobebisaka mabongisi ya mobola kasi Yawe azali ebombamelo na ye.

[7] Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona ! Tango Yawe akobongisa bato na Ye, bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.

Banzembo — Chapters